14 Noko ya Saulo atunaki Saulo mpe mosali na ye : — Bokendeki wapi ? Saulo azongisaki : — Tokendeki koluka ba-ane. Kasi lokola tomonaki yango te, yango wana tokendeki epai ya Samuele.
Boye, Geazi akotaki mpe atelemaki liboso ya nkolo na ye, Elize. Elize atunaki ye : — Geazi, okendeki wapi ? Geazi azongisaki : — Mosali na yo akendeki epai moko te.
Tango Saulo asilisaki kosakola, akendeki na esambelo ya likolo ya ngomba.
Noko ya Saulo alobaki lisusu : — Nabondeli yo, yebisa ngai makambo oyo Samuele alobaki na bino.
Kombo ya mwasi na ye ezalaki « Ayinoami, » mwana mwasi ya Ayimaatsi. Abineri, mwana mobali ya Neri, Noko ya Saulo, azalaki mokonzi ya mampinga ya Saulo.