12 Moko kati na bato oyo bazalaki wana alobaki : « Bongo nani azali motambolisi na bango ? » Ezali ndenge wana nde ebandaki lisese oyo : « Saulo mpe azali moko kati na basakoli ? »
Tala ndenge ekomama kati na mikanda ya Basakoli : « Nzambe akoteya bango nyonso. » Boye moto nyonso oyo ayokaka Tata mpe ayambaka mateya na Ye ayaka epai na Ngai.
Boye Saulo akendeki na Nayoti ya Rama. Kasi ye mpe, wana azalaki kokoba nzela na ye, Molimo na Nzambe akitelaki ye, mpe akomaki kosakola kino akomaki na Nayoti ya Rama.