Tango bakomaki pembeni ya etuka ya Leyi, bato ya Filisitia bayaki kokutana na ye na koganga. Molimo na Yawe akitelaki ye na nguya, mpe basinga oyo ekangaki maboko na ye ekatanaki lokola basinga ya lino oyo eziki na moto, mpe ekweyaki wuta na maboko na ye.
Molimo na Yawe ayaki likolo na ye mpe akomaki elombe kati na bana ya Isalaele ; bongo akendeki kobunda bitumba. Yawe akabaki Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami, na maboko ya Otinieli ; mpe Otinieli alongaki ye.
Boye Samuele azwaki liseke ya mafuta mpe apakolaki ye na miso ya bandeko na ye ya mibali. Banda mokolo wana, Molimo na Yawe akitelaki Davidi na nguya. Mpe Samuele azongaki na Rama.
Nakomiponela Nganga-Nzambe ya sembo oyo akosala kolanda motema mpe makanisi na Ngai. Nakobongisela ye libota moko oyo ekowumela, mpe akosala tango nyonso mosala ya bonganga-Nzambe liboso ya mopakolami na Ngai.