1 Samuele 10:1 - Mokanda na Bomoi1 Bongo Samuele azwaki molangi ya mafuta, asopaki yango na moto ya Saulo, ayambaki ye mpe alobaki : « Boni, Yawe apakoli yo mafuta te mpo ete ozala mokambi ya libula na Ye ? အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye, olataki biloko ya wolo mpe ya palata ; bilamba na yo ezalaki ya lino ya kitoko, bilamba ya talo batonga bililingi na basinga. Bilei na yo ezalaki : farine ya ble basangisa na eloko mosusu te, mafuta ya nzoyi mpe mafuta ya olive. Okomaki lisusu kitoko koleka, ozwaki lokumu makasi mpe okomaki lokola mwasi mokonzi.
Sik’oyo, bazali kokoba kosala masumu ; na mayele na bango, bazali komisalela banzambe ya bikeko na nzela ya palata na bango balekisa na moto, bililingi oyo babongisa malamu : nyonso wana ezali mosala ya bato ya misala ya maboko. Balobaka na tina na bango : « Babonzaka bato lokola bambeka mpe bapesaka beze na bana ngombe ya mibali. »
Natelemi lelo liboso na bino. Bofunda ngai liboso ya Yawe mpe liboso ya mopakolami na Ye. Nazwaki ngombe ya nani ? Nazwaki ane ya nani ? Nanyokolaki nani, mpe namonisaki nani pasi ? Nazwaki kanyaka na maboko ya nani mpo na kokanga miso na ngai ? Soki nasalaki likambo moko kati na makambo oyo nyonso, nakozongisa yango.
Yawe alobaki na Samuele : — Kino tango nini okosala matanga mpo na Saulo ? Ngai, nasilaki kobwaka ye mpo ete azala lisusu mokonzi ya Isalaele te. Tondisa sik’oyo liseke na yo na mafuta mpe kende. Natindi yo epai ya Izayi ya Beteleemi, pamba te naponi moko kati na bana na ye ya mibali mpo ete azala mokonzi.
Alobaki na ye : « Lobi, na ngonga oyo, nakotindela yo mobali moko kowuta na etando ya Benjame ; okopakola ye mafuta mpo ete azala mokambi ya bato na Ngai, Isalaele. Akokangola bato na Ngai na maboko ya bato ya Filisitia, pamba te namoni pasi ya bato na Ngai, mpe koganga na bango ekomaki kino epai na Ngai. »