Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 1:9 - Mokanda na Bomoi

9 Mokolo moko, sima na bango kolia mpe komela na Silo, Ana atelemaki mpe akendeki na Ndako ya Yawe. Ezalaki na ngonga oyo Nganga-Nzambe Eli avandaki na kiti, pembeni ya ekuke ya Ndako ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 1:9
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mokonzi alobaki na mosakoli Natan : — Tala nanu likambo oyo ! Ngai nazali kovanda na ndako batonga na mabaya ya sedele, kasi Sanduku ya Nzambe ezali kovanda kati na ndako ya kapo.


Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe, eloko moko kaka oyo nasengaka makasi : nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe, mikolo nyonso ya bomoi na ngai, mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.


Mongongo ya Yawe esalaka ete mboloko ebota, esalaka mpe ete zamba etikala pamba. Kati na Tempelo ya Yawe, nyonso egangaka : « Nkembo ! »


Obomaka bato oyo balobaka lokuta. Yo, Yawe, oyinaka babomi mpe bakosi.


wana nkolo na ye asengeli komema ye liboso ya basambisi ; akomema ye na ezipelo ya ekuke to na mabaya oyo esimbaka ekuke mpe akotobola ye litoyi na motonga ; mpe mowumbu akosalela nkolo yango mpo na libela.


Wana Ana azalaki na pasi na motema, abondelaki Yawe na kolela mingi.


Samuele alalaki kino na tongo. Bongo sima na ye kolamuka, afungolaki bikuke ya Tempelo ya Yawe. Azalaki kobanga koyebisa Eli emoniseli oyo azwaki.


Mwinda ya Esika ya bule ezalaki kopela, wana Samuele azalaki ya kolala kati na Tempelo ya Yawe, epai wapi Sanduku ya Nzambe ezalaki.


Akomaki na tango oyo Eli azalaki ya kovanda na kiti, pembeni ya nzela, mpe azalaki kotala na ekenge, pamba te motema na ye ezalaki na kimia te na tina na Sanduku ya Nzambe. Bongo tango moto yango akotaki na engumba mpe apesaki sango ya makambo nyonso oyo ewutaki kosalema, engumba mobimba egangaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ