Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 1:8 - Mokanda na Bomoi

8 Elikana, mobali na ye, atunaki ye : « Ana, mpo na nini ozali kolela ? Mpo na nini ozali kolia te ? Mpo na nini ozali na mawa boye ? Boni, ngai nazali na motuya te mpo na yo koleka bana mibali zomi ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 1:8
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azaeli atunaki : — Mpo na nini nkolo na ngai azali kolela ? Elize azongisaki : — Mpo ete nayebi mabe oyo okosala bana ya Isalaele. Okozikisa bingumba na bango, oyo etongama makasi, okokata bilenge mibali na bango bakingo na mopanga, okoboma bana na bango ya mike, mpe okopasola mabumu ya basi na bango ya zemi.


Moto nyonso oyo azali na pasi asengeli na mawa ya baninga na ye, ata soki atiki kotosa Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


bongo nakokende na etumbelo epai ya Nzambe, esengo mpe bomengo na ngai. Oh Yawe, Nzambe na ngai, nakosanzola Yo na lindanda.


Oh mwasi ekomba, yemba nzembo na esengo, yo oyo obotaka te ! Yemba nzembo mpe ganga na esengo, yo mwasi oyo oyoki nanu pasi ya kobota te ! Pamba te bana ya mwasi oyo basundola bakozala ebele koleka bana ya mwasi ya libala, elobi Yawe.


Pamba te Yawe abengi yo lisusu lokola mwasi oyo basundola, bongo azali na pasi na motema. Ndenge nini bakoki solo kosundola mwasi oyo babala na bolenge, elobi Nzambe na yo ?


Ba-anjelu batunaki ye : — Mwasi, mpo na nini ozali kolela ? Azongisaki : — Nazali kolela mpo ete balongoli Nkolo na ngai mpe nayebi te soki batie Ye wapi ?


Yesu atunaki ye : — Mwasi, mpo na nini ozali kolela ? Ozali koluka nani ? Mari akanisaki ete azali mosali elanga ; alobaki na ye : — Tata, soki yo nde moto olongolaki Ye, yebisa ngai esika nini otie Ye mpo ete nakende kokamata Ye.


Bandeko, tozali kolendisa bino : bopesaka bagoyigoyi mpe bato ya mobulu makebisi, bolendisaka ba-oyo basili kobungisa mpiko na bango, bosungaka ba-oyo bazangi makasi, boyikanaka mpiko.


Akoyeisa bomoi na yo sika mpe akosunga yo na kimobange na yo, pamba te bokilo na yo, oyo alingaka yo mpe azali na motuya na miso na yo koleka bana mibali sambo, aboteli yo mwana mobali. »


Elikana azalaki kosala bongo mibu nyonso. Mpe tango nyonso Ana azalaki kokende na Ndako ya Yawe, mbanda na ye, Penina, azalaki kotika te kotiola ye. Bongo, lokola Ana azalaki kolela mpe azalaki kolia te,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ