Tango Rasheli amonaki ete azali kobotela Jakobi bana te, akomaki na zuwa mpo na ndeko na ye ya mwasi. Boye alobaki na Jakobi : — Pesa ngai bana, noki te nakokufa.
Elikana azalaki kosala bongo mibu nyonso. Mpe tango nyonso Ana azalaki kokende na Ndako ya Yawe, mbanda na ye, Penina, azalaki kotika te kotiola ye. Bongo, lokola Ana azalaki kolela mpe azalaki kolia te,
Ana asambelaki na maloba oyo : Motema na ngai ezali kosepela mpo na Yawe mpo ete alendisi bomoi na ngai. Wana nazali na esengo mpo ete okangoli ngai, monoko na ngai ekotelemela banguna na ngai.