Tango Rasheli amonaki ete azali kobotela Jakobi bana te, akomaki na zuwa mpo na ndeko na ye ya mwasi. Boye alobaki na Jakobi : — Pesa ngai bana, noki te nakokufa.
Jozefi apesaki bango biloko oyo ewutaki na mesa na ye ; mpe Benjame azwaki mbala mitano koleka bango nyonso. Na bongo, bamelaki elongo na ye mpe balangwaki.
Soki mobali azali na basi mibale, bongo alingaka moko koleka mosusu, mpe bango mibale baboteli ye bana, kasi mwana ya liboso azali mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te ;