4 Bongo, soki mokolo na ye ya kobonza mbeka ekoki, Elikana azalaki na momesano ya kopesa biteni ya mbeka na ye epai ya Penina, mwasi na ye, mpe epai ya bana nyonso ya Penina, ya mibali mpe ya basi.
Mosuni ya mbeka ya boyokani oyo abonzi mpo na kozongisa matondi esengeli koliama kaka na mokolo oyo abonzi yango, eloko moko te ekoki kotikala kino na tongo.
Okosepela liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye : yo, bana na yo ya mibali, bana na yo ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi oyo bazali kati na bingumba na yo, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kovanda kati na yo.