1 Samuele 1:26 - Mokanda na Bomoi26 Ana alobaki na ye : — Limbisa ngai, nkolo na ngai ; nazali mwasi oyo atelemaki awa pembeni na yo mpo na kobondela Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Iri azongiselaki Davidi : — Sanduku, Isalaele mpe Yuda bazali kovanda na bandako ya kapo ; mpe Joabi, nkolo na ngai, elongo na bato na ye bazali kolala libanda kati na zamba. Ndenge nini ngai nakende na ndako na ngai mpo na kolia, komela mpe kolala na mwasi na ngai ? Solo, na kombo na yo mokonzi, nakoki kosala likambo ya boye te.
Mokonzi atunaki : — Boni, loboko ya Joabi ezali elongo na yo te na makambo oyo nyonso ? Mwasi azongisaki : — Na kombo na yo mokonzi, nkolo na ngai, kati na makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, awuti koloba, moto moko te akoki kokende, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi. Solo, ezali mosali na yo, Joabi, nde atindaki ngai kosala makambo oyo, mpe ye nde atiaki maloba oyo na monoko na ngai mwasi mosali na yo.