Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 1:2 - Mokanda na Bomoi

2 Elikana azalaki na basi mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Penina ; » mosusu, « Ana. » Penina azalaki na bana, kasi Ana azalaki na mwana te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 1:2
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sarayi azalaki ekomba : azalaki na mwana te.


Izaki abondelaki Yawe mpo na Rebeka, mwasi na ye, oyo azalaki ekomba. Yawe ayanolaki libondeli na ye, mpe Rebeka akomaki na zemi.


Lokola Yawe amonaki ete Jakobi alingaka Lea te, afungolaki ye mabota ; kasi Rasheli azalaki kobota te.


Lemeki abalaki basi mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Ada, » mpe mosusu, « Tsila. »


Lemeki alobaki na basi na ye : « Ada mpe Tsila, boyoka ngai malamu ; bino basi ya Lemeki, bolanda ngai malamu : Solo, likolo ya pota moko, ngai nabomaki moto ; mpe likolo ya mwa pota, nabomaki elenge mobali !


Yesu azongiselaki bango : — Moyize apesaki bino nzela ya kobengana basi na bino na mabala, pamba te mitema na bino ezali mabanga ; na ebandeli, ezalaki bongo te.


Kasi bazalaki na mwana te, pamba te Elizabeti azalaki ekomba ; mpe bango mibale bakomaki mibange.


Ezalaki mpe na mwasi mosakoli moko, Ana, mwana ya Fanwele, moto ya libota ya Aseri ; akomaki mobange makasi. Na bolenge na ye, asalaki mibu sambo ya libala elongo na mobali na ye ;


Ezalaki na mobali moko, moto ya Tsorea, ya libota ya Dani, kombo na ye ezalaki Manoa ; mwasi na ye azalaki ekomba, mpe abotelaki ye bana te.


Jedeon azalaki na bana tuku sambo oyo bawutaki na mokongo na ye, pamba te azalaki na basi ebele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ