Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 1:19 - Mokanda na Bomoi

19 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Elikana mpe libota na ye balamukaki mpe bagumbamelaki Yawe ; sima na yango, bazongaki epai na bango, na Rama. Elikana asangisaki nzoto na Ana, mwasi na ye, mpe Yawe akaniselaki Ana.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 1:19
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe atalisaki bolamu na Ye epai ya Sara ndenge kaka alobaki mpe akokisaki elaka oyo apesaki ye.


Nzambe akaniselaki Rasheli, ayokaki kolela na ye mpe afungolaki ye mabota.


Adamu asangisaki nzoto na mwasi na ye Eva ; mpe Eva akomaki na zemi, bongo abotaki Kayina. Alobaki : « Nasali moto na lisungi ya Yawe. »


Nzambe akanisaki Noa mpe banyama nyonso oyo ezalaki elongo na ye kati na masuwa, atindaki mopepe na mokili mpe mayi ekitaki.


Nzokande, mwasi ya Sunami akomaki na zemi. Mpe na mobu oyo elandaki, na eleko yango kaka, abotaki mwana mobali, ndenge kaka Elize alobaki na ye.


Nalamukaka liboso ete tongo etana mpo na kobelela Yo, nazali na elikya kati na liloba na Yo.


Akanisaki biso tango basambwisaki biso ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Yawe, kokanisa te masumu mpe botomboki ya bolenge na ngai ; kanisa ngai kaka kolanda boboto na Yo, pamba te ozali malamu.


Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai, yoka koganga na ngai wana nazali kosenga lisungi, pamba te nazali kobondela nde Yo.


Mpo na ngai, nabelelaka Nzambe, mpe Yawe akobikisa ngai.


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana molili ezalaki nanu, Yesu alamukaki, abimaki libanda, akendeki na esobe epai wapi azalaki kaka Ye moko mpe akomaki kosambela.


Bongo alobaki lisusu : — Yesu, kanisa ngai tango okokota kati na Bokonzi na Yo.


Kati na engumba Ramataimi-Tsofimi ya etuka ya bangomba ya Efrayimi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki « Elikana. » Azalaki mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Eliwu, mwana mobali ya Towu, mwana mobali ya Tsufi, moto ya Efrayimi.


Bongo apesaki elaka, alobaki : « Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, soki kaka otali pasi ya mwasi mowumbu na Yo, soki okanisi ngai mpe obosani te mwasi mosali na Yo, kasi opesi ye mwana mobali, nakokaba ye epai na Yawe mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye, mpe bakotikala kokata suki ya moto na ye te. »


Bongo Samuele azongaki na Rama, mpe Saulo akendeki na ndako na ye, na Gibea ya Saulo.


Boye Samuele azwaki liseke ya mafuta mpe apakolaki ye na miso ya bandeko na ye ya mibali. Banda mokolo wana, Molimo na Yawe akitelaki Davidi na nguya. Mpe Samuele azongaki na Rama.


Tango Davidi akimaki mpe amibikisaki, akendeki epai ya Samuele, na Rama, mpe ayebisaki ye makambo nyonso oyo Saulo asalaki ye. Bongo ye mpe Samuele bakendeki kovanda na Nayoti, pene ya Rama.


Sima na yango, Elikana azongaki na ndako na ye, na Rama ; kasi mwana atikalaki mpo na kosalela Yawe na bokambami ya Nganga-Nzambe Eli.


Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esanganaki mpo na kosala matanga na tina na ye ; bongo bakundaki ye na mboka na ye, Rama. Davidi akendeki na esobe ya Parani.


Kasi azalaki kozonga tango nyonso na Rama epai wapi ndako na ye ezalaki. Ezali kuna nde azalaki lisusu kokamba bato ya Isalaele. Mpe atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe.


Mpo na yango, bakambi nyonso ya mabota ya Isalaele basanganaki elongo mpe bakendeki epai ya Samuele, na Rama.


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, balamukaki. Samuele abengaki Saulo na veranda mpe alobaki na ye : « Bongama, nazali kokende kotika yo na nzela na yo. » Sima na Saulo kobongama, abimaki libanda nzela moko na Samuele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ