Apesaki bango malako oyo : « Tala makambo oyo bokoloba epai ya nkolo na ngai Ezawu : ‹ Mosali na yo Jakobi alobi : ‘ Navandaki epai ya Labani mpe natikalaki kuna kino sik’oyo.
Nazali na bangombe, ba-ane, bameme, bantaba, basali ya mibali mpe ya basi ; natindi sango oyo epai ya nkolo na ngai mpo ete nazwa ngolu na miso na ye. ’ › »
Ezawu alobaki : — Nabondeli yo, ndima ete natikela yo ndambo ya bato na ngai. Kasi Jakobi atunaki : — Mpo na nini kosala bongo ? Tika ete nazwa kaka ngolu na miso ya nkolo na ngai !
Ezawu atunaki : — Ngulupa nyonso oyo nakutani na yango, tina na yango nini ? Jakobi azongisaki : — Ezali mpo ete nazwa ngolu na miso na yo, nkolo na ngai.
Tika ete Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo nyonso mpe na kimia nyonso kati na kondima, mpo ete botonda na elikya na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu.
Rite alobaki : — Tika ete nakoba kozwa ngolu na miso na yo, nkolo na ngai. Obondisi motema na ngai, osololi na mwasi mosali na yo na boboto nyonso. Nzokande, nakokani te ata na moko ya basali na yo ya basi.
Rite, moto ya Moabi, alobaki na Naomi : — Okoki kopesa ngai nzela ya kokende na bilanga mpo na kolokota mito ya ble, oyo bato oyo bakataka ble batiki. Nakozala na sima ya moto oyo akosalela ngai ngolu. Naomi alobaki na ye : — Mwana na ngai, kende.