Kozwa mwasi mowumbu na yo te lokola mwasi ya mobulu, pamba te ezali mawa ya motema na ngai mpe monene ya pasi na ngai nde etindi ngai kobondela kino tango oyo.
Elikana, mobali na ye, alobaki : — Oyo omoni ete ezali malamu, sala yango. Vanda awa kino okokata mwana komela mabele. Tika ete Yawe asunga yo mpo ete okokisa kaka elaka na yo. Boye Ana atikalaki na ndako, akobaki komelisa mwana mabele kino tango akataki ye komela.
Jonatan alobaki na Davidi : « Kende na kimia, pamba te biso mibale tolapanaki ndayi na Kombo na Yawe na koloba : ‹ Yawe azali Motatoli kati na yo mpe ngai, mpe kati ya bakitani na yo mpe bakitani na ngai mpo na libela. › »