14 Eli alobaki na Ana : — Kino tango nini okozala na milangwa ? Longola milangwa na yo.
soki olongoli lisumu oyo ezali na loboko na yo mpe opekisi mabe kovanda kati na ndako na yo,
Soki ozongi epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, soki obengani mabe mosika ya ndako na yo, bomengo na yo ekozongela yo.
« Kino tango nini okokoba koloba makambo ya boye ? Maloba na yo ezali te lokola mopepe makasi ?
Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ; azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.
Longola lokuta na monoko na yo, mpe longola mabe na bibebu na yo.
Yo moto ya goyigoyi, okolala pongi kino tango nini ? Kino tango nini okolamuka na pongi na yo ?
Nzokande, bato mosusu bazalaki koseka bango mpe koloba : « Balangwe vino ya sika. »
Bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe babandaki koloba na nkota mosusu, ndenge Molimo azalaki kolakisa bango.
Yango wana, tika ete moko na moko kati na bino abwaka lokuta mpe alobaka solo na moninga na ye, pamba te biso nyonso tozali kaka biteni ya nzoto moko.
Bolimwisaka kati na bino bololo ya mitema, koyinana, kanda, koswana, mafinga mpe lolenge nyonso ya misala mabe.