Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 1:11 - Mokanda na Bomoi

11 Bongo apesaki elaka, alobaki : « Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, soki kaka otali pasi ya mwasi mowumbu na Yo, soki okanisi ngai mpe obosani te mwasi mosali na Yo, kasi opesi ye mwana mobali, nakokaba ye epai na Yawe mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye, mpe bakotikala kokata suki ya moto na ye te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 1:11
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Jakobi akataki ndayi na koloba : « Soki Nzambe akozala elongo na ngai mpe akobatela ngai na mobembo oyo nazali kosala, mpe soki akopesa ngai bilei mpe bilamba ya kolata ;


Boye Lea azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Apesaki ye kombo « Ribeni ; » alobaki : « Yawe amoni pasi na ngai ; mpe sik’oyo, mobali na ngai akolinga ngai. »


Nzambe akaniselaki Rasheli, ayokaki kolela na ye mpe afungolaki ye mabota.


Nzambe akanisaki Noa mpe banyama nyonso oyo ezalaki elongo na ye kati na masuwa, atindaki mopepe na mokili mpe mayi ekitaki.


Tango mosusu Yawe akomona pasi na ngai, bongo akobongola na bolamu bilakeli mabe oyo ezali kokweyela ngai lelo. »


Tala pasi mpe kolela na ngai, mpe limbisa masumu na ngai nyonso.


Bato bandimaki. Bongo tango bayokaki ete Yawe akanisaki bana ya Isalaele mpe amonaki pasi na bango, bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe.


Eh mwana na ngai ya mobali, mwana oyo abimi na libumu na ngai, mwana mobali oyo nalapelaka ndayi :


Eleki malamu ete olapa na yo kutu ndayi te na esika ya kolapa ndayi mpe ozanga kokokisa yango.


« Yebisa bana ya Isalaele mpe loba na bango : ‹ Soki moko kati na bino alapi ndayi ya kopesa moto lokola likabo epai na Yawe, asengeli kopesa motuya oyo ekokani na lolenge ya moto na moto.


Boye, bana ya Isalaele balapaki ndayi oyo epai na Yawe : « Soki okabi bato oyo na maboko na biso, tokobebisa bingumba na bango nyonso. »


Nganga-Nzambe akobonza moko lokola mbeka mpo na masumu mpe mosusu, lokola mbeka ya kotumba ; akosala mosala ya bolimbisi masumu na ye lokola asimbaki ebembe. Kaka na mokolo yango, akobulisa lisusu moto na ye epai na Yawe.


Na mikolo nyonso ya ndayi ya libulisi na ye, jileti esengeli te kotutana na moto na ye to basengeli te kokata suki ya moto na ye, kino tango ya libulisi na ye mpo na Yawe ekosila ; akozala bule mpe akotika suki ya moto na ye mpe mandefu na ye kokola.


Na mikolo nyonso ya libulisi na ye, akozala bule mpo na Yawe.


Jefite alapaki ndayi epai na Yawe, alobaki : « Soki okabi bato ya Amoni na maboko na ngai,


pamba te okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bakoki te kokata suki ya moto na ye, pamba te mwana mobali yango akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye. Akobanda kokangola Isalaele wuta na maboko ya bato ya Filisitia. »


Wana Ana azalaki na pasi na motema, abondelaki Yawe na kolela mingi.


Lokola azalaki kobenda libondeli na ye molayi liboso ya Yawe, Eli azalaki kotala malamu-malamu monoko na ye.


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Elikana mpe libota na ye balamukaki mpe bagumbamelaki Yawe ; sima na yango, bazongaki epai na bango, na Rama. Elikana asangisaki nzoto na Ana, mwasi na ye, mpe Yawe akaniselaki Ana.


Kasi lokola Ana akendeki te, alobaki na mobali na ye : — Soki nakati mwana komela mabele nde nakomema ye mpo na kotalisa ye epai na Yawe ; bongo akovanda kuna mpo na libela.


Nazalaki kobondela mpo ete nazwa mwana oyo, mpe Yawe asilaki kopesa ngai oyo nasengaki Ye.


Boye, ngai mpe nakabi ye sik’oyo epai na Yawe : bomoi na ye mobimba, akozala ya Yawe. Sima na yango, agumbamelaki Yawe na esika yango.


Eli azalaki kopambola Elikana mpe mwasi na ye na maloba oyo : « Tika ete Yawe apesa yo bana na nzela ya mwasi oyo, mpo na kozwa esika ya mwana oyo asengaki na mabondeli mpe abonzaki epai na Yawe ! » Sima na yango, bazongaki epai na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ