Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 1:1 - Mokanda na Bomoi

1 Kati na engumba Ramataimi-Tsofimi ya etuka ya bangomba ya Efrayimi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki « Elikana. » Azalaki mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Eliwu, mwana mobali ya Towu, mwana mobali ya Tsufi, moto ya Efrayimi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 1:1
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, moto ya Efrayimi ya Tsereda, moko kati na basali ya Salomo, atombokelaki mokonzi. Mama na ye azalaki mwasi akufisa mobali, mpe kombo na ye : Tseruya.


Naati abotaki Eliabi ; Eliabi abotaki Yeroami ; Yeroami abotaki Elikana, mpe Elikana abotaki Samuele.


mwana mobali ya Taati, mwana mobali ya Asiri, mwana mobali ya Ebiazafi, mwana mobali ya Kore,


Bandeko na bango ya mibali, bana mosusu ya Levi, baponamaki mpo na kosala misala mosusu liboso ya Mongombo, kati na Esika ya bule ya Nzambe.


Kasi Aron mpe bana na ye ya mibali bapesamelaki mokumba ya kotumba mbeka na likolo ya etumbelo ya nyama mpe etumbelo ya malasi. Bazalaki kosala misala nyonso oyo etali Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe mosala ya bolimbisi masumu ya Isalaele kolanda mitindo nyonso oyo Moyize, mosali na Nzambe, apesaki.


Tango pokwa ekomaki, mozwi moko ayaki ; kombo na ye ezalaki Jozefi, moto ya mboka Arimate ; ye mpe akomaki moyekoli ya Yesu.


Bongo, Eleazari, mwana mobali ya Aron, mpe akufaki. Bakundaki ye na ngomba moke oyo bapesaki na Pineasi, mwana na ye ya mobali, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi.


Bato ya Galadi bakangaki esika oyo bakatisaka Yordani na makolo, pene ya etuka ya Efrayimi. Mpe tango nyonso mokimi moko ya Efrayimi azalaki koloba : « Tika ngai nakatisa, » bato ya Galadi bazalaki kotuna ye : « Ozali moto ya Efrayimi ? » Soki azongisi : « Te, »


Kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki « Mika. »


Na mikolo oyo mokonzi azalaki te kati na Isalaele, Molevi moko oyo azalaki kovanda na suka ya etuka ya bangomba ya Efrayimi azwaki lokola makangu mwasi ya mboka Beteleemi kati na Yuda.


Azalaki kosambisa na se ya nzete ya mbila ya Debora, oyo ezalaki na kati ya Rama mpe Beteli, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Bana ya Isalaele bazalaki koya epai na ye mpo na kosambisama.


Kombo ya mobali yango ezalaki « Elimeleki ; » kombo ya mwasi na ye ezalaki « Naomi ; » mpe bakombo ya bana na ye ya mibali ezalaki « Maaloni » mpe « Kilioni. » Bazalaki bato ya libota ya Efrate mpe bawutaki na Beteleemi ya Yuda. Bakendeki na Moabi mpe bavandaki kuna.


Obedi abotaki Izayi, Izayi abotaki Davidi.


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Elikana mpe libota na ye balamukaki mpe bagumbamelaki Yawe ; sima na yango, bazongaki epai na bango, na Rama. Elikana asangisaki nzoto na Ana, mwasi na ye, mpe Yawe akaniselaki Ana.


Davidi azalaki mwana mobali ya moto moko ya Efrate, oyo kombo na ye ezalaki « Izayi. » Izayi awutaki na Beteleemi ya Yuda mpe azalaki na bana mibali mwambe. Na tango Saulo azalaki mokonzi, Izayi akomaki mobange mpo ete mibu na ye ya mbotama epusanaki makasi.


Sima na yango, Elikana azongaki na ndako na ye, na Rama ; kasi mwana atikalaki mpo na kosalela Yawe na bokambami ya Nganga-Nzambe Eli.


Kasi azalaki kozonga tango nyonso na Rama epai wapi ndako na ye ezalaki. Ezali kuna nde azalaki lisusu kokamba bato ya Isalaele. Mpe atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe.


Boye, Saulo akatisaki etuka ya bangomba ya Efrayimi mpe etando ya Shalisha ; kasi bamonaki yango te. Bakotaki na etuka ya Shalimi, kasi ba-ane ezalaki kuna te ; bakomaki kino na etuka ya Benjame, kasi bamonaki yango kaka te.


Tango bakomaki na mokili ya Tsufi, Saulo alobaki na mosali oyo azalaki elongo na ye : — Yaka, tozonga ; noki te tata na ngai akotika kokanisa ba-ane, kasi akokoma komitungisa mpo na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ