Pamba te moto nyonso oyo asalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.
Nani kati na bango mibale akokisaki mokano ya tata na ye ? Bazongisaki : — Mwana ya liboso. Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bakokota na Bokonzi ya Nzambe liboso na bino,
Bato nyonso oyo balobaka na Ngai : ‹ Nkolo ! Nkolo ! › bakokota te na Bokonzi ya Likolo, kaka bato oyo basalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.
Moto nyonso oyo azwi mokano ya kosala makambo oyo Nzambe alingaka, akososola soki mateya na Ngai ewuti na Nzambe to nazali koloba na ndenge na Ngai moko.
Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.
Ndenge wana mpe mpo na bino bandeko na ngai : bosila mpe kokufa mpo na Mobeko na nzela ya nzoto ya Klisto mpo ete bokoma bato ya moto mosusu, ya Ye oyo asekwaki kati na bakufi, mpo ete tobota bambuma mpo na Nzambe.
Akufaki mpo na bato nyonso mpo ete ba-oyo bazali na bomoi bazala lisusu na bomoi te mpo na bango moko, kasi mpo na Ye oyo akufaki mpe asekwaki mpo na bango.
Biso nyonso mpe, na kala, tozalaki elongo na bango, tozalaki kotambola kolanda baposa na biso ya nzoto, tozalaki kokokisa nyonso oyo nzoto mpe makanisi na biso ezalaki kotinda biso kosala. Lokola bato mosusu, kanda ya Nzambe esengelaki kokweyela biso mpo na mabe ya bomoto na biso.
Boye, tala makambo oyo nazali koyebisa bino mpe kobetela sete kati na Nkolo : Botambolaka lisusu te lokola Bapagano oyo balandaka makanisi na bango, oyo ezanga tina.
na miso na bango kaka te, lokola nde bozali koluka kosepelisa bato, kasi lokola bawumbu ya Klisto, oyo bazali kosala mokano ya Nzambe wuta na mitema na bango.
Yango wana, wuta mokolo oyo toyokaki sango na tina na bino, totikaka te kobondela mpo na bino mpe kosenga na Nzambe ete atondisa bino na boyebi ya mokano na Ye, na bwanya nyonso mpe na bososoli oyo Molimo apesaka,
Epafrasi, ye oyo azali mpe moko kati na bino mpe mowumbu ya Yesu-Klisto, atindeli bino mbote. Abundaka tango nyonso etumba mpo na bino kati na mabondeli, mpo ete botelema ngwi lokola bato oyo bakembi kati na kondima mpe baselingwa mpo na kokokisa mokano nyonso ya Nzambe.
apesa bino makoki ya kosalaka bolamu ya lolenge nyonso mpo na kokokisa mokano na Ye, mpe asala kati na biso makambo nyonso oyo esepelisaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto ! Tika ete nkembo ezonga epai na Ye, mpo na libela na libela ! Amen !