Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Petelo 3:2 - Mokanda na Bomoi

2 tango bakomona bino kotambola na bomoi ya peto mpe ya botosi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Petelo 3:2
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atako bongo, mobali nyonso kati na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka, mpe mwasi nyonso asengeli kotosa mobali na ye.


Bino bawumbu, botosaka bankolo na bino ya mokili, na limemia, na kobanga mpe na bosembo ya mitema, lokola nde bozali kotosa Klisto ;


Kasi botambola na lolenge oyo ebongi liboso ya Sango Malamu ya Klisto mpo ete, ezala nayei kotala bino to nayei te, nayoka sango ete botelemi ngwi mpe bosangani lokola moto moko, bozali kobunda elongo, na motema moko, mpo na kobatela kondima oyo Sango Malamu ememelaki bino,


Kasi biso, mboka na biso ezali kati na Likolo, mpe tozali kozela na posa makasi Mobikisi na biso, Nkolo Yesu-Klisto, oyo akowuta na Likolo.


Bawumbu, botosaka bankolo na bino na makambo nyonso ; na miso na bango kaka te, lokola nde bozali kosepelisa bato, kasi na mitema ya bosembo mpe kati na kotosa Nkolo.


Kopesa na moto moko te nzela ya kotiola bolenge na yo, kasi zala ndakisa mpo na bandimi na nzela ya maloba, bizaleli, bolingo, kondima mpe bopeto.


Kasi lokola Ye oyo abengaki bino azali Bule, bino mpe bozala bule kati na etamboli na bino nyonso,


Bozalaka na bizaleli ya malamu kati na Bapagano mpo ete, ata soki bazali kotonga bino ete bozali kosala mabe, bandima ata misala malamu na bino mpe bapesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akomimonisa.


Bino mpe basi, botosaka mibali na bino mpo ete, soki ezali na ndambo ya mibali oyo bandimaka Liloba na Nzambe te, bakoma kondima na nzela ya bizaleli malamu ya basi na bango, ata soki bateyi bango Liloba te,


Bolukaka kaka te kokoma kitoko na libanda na nzela ya kokanga suki, kolata babiju ya wolo to bilamba ya kitoko ;


Lokola nyonso esengeli konyangwama ndenge wana, bosengeli kotambola ndenge nini ? Bosengeli kotambola na bomoi ya bule mpe na botosi kati na makambo ya Nzambe


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ