3 awa bosili kososola ete Nkolo azali malamu.
Nani azali Mokonzi yango ya nkembo ? Ezali Yawe, Elombe ya nguya ; Yawe, Elombe ya bitumba.
Anjelu ya Yawe atongaka molako na ye zingazinga ya bato oyo batosaka Yawe, mpe akangolaka bango.
Boye, nakopambola Yo bomoi na ngai mobimba, nakotombola maboko na ngai mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
Yawe azali ebombamelo mpo na bato oyo bazali konyokolama, mpe ndako makasi mpo na tango ya pasi.
Ndenge nzete ya pome ezalaka kati na banzete ya zamba, ndenge wana mpe mobali na ngai azalaka kati na bilenge mibali. Nasepelaka kovanda na se ya elilingi na ye, mpe mbuma na ye ezalaka elengi na monoko na ngai.
Bakozala bato ya esengo, bakokoma kitoko makasi. Ble ekopesa bilenge mibali makasi mpe vino ya sika ekopesa bilenge basi makasi.
Kasi tango Nzambe Mobikisi na biso amonisaki boboto mpe bolingo na Ye mpo na bato,