Ezali bongo te mpo na libota na ngai liboso ya Nzambe, pamba te asalaki boyokani ya libela elongo na ngai, boyokani oyo esalema malamu na makambo nyonso, mpe oyo Ye moko abatelaka ? Tango nyonso mpe na makambo nyonso, apesaki ngai elonga mpe akokisaki posa ya motema na ngai.
Yesu alobaki : — Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai ; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.
Bakundaki biso elongo na Ye na nzela ya libatisi kati na kufa na Ye mpo ete, lokola Klisto asekwaki kati na bakufi na nzela ya nkembo ya Tata, biso mpe totambola na bomoi ya sika.
Bandeko na ngai, botika kokanisa lokola bana mike ; bozala te lokola bana mike na lolenge na bino ya kososola makambo. Mpo na oyo etali mabe, bozala lokola bana mike ; kasi mpo na oyo etali lolenge ya kososola makambo, bozala mikolo.
Bandeko, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino. Solo, ezali malamu mpo na biso kosalaka bongo, pamba te kondima na bino ezali se kokola mpe bolingo oyo moko na moko kati na bino azali na yango mpo na moninga na ye ezali mpe kokola.
Pamba te bobotamaki mbotama ya sika na nzela ya Liloba na Nzambe, oyo ezali nkona oyo epesaka bomoi mpe ewumelaka seko na seko ; kasi na nzela te ya nkona ya bato oyo bakufaka.
kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela ! Amen !