1 Petelo 1:3 - Mokanda na Bomoi3 Tika ete Nzambe, Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama ! Pamba te, kati na mawa monene na Ye, asalaki ete tobotama mbotama ya sika, na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto kati na bakufi, mpo na kopesa biso elikya ya solo အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Asambelaki Yawe : — Oh Yawe ! Ezali te makambo ya boye nde nazalaki komilobela tango nazalaki epai na ngai ? Yango wana nasalaki na ngai mobembo na Tarsisi mpo na koluka kokima, pamba te nayebaki malamu ete ozali Nzambe ya ngolu mpe ya mawa, osilikaka noki te mpe otonda na bolingo, obongolaka makanisi na Yo ya kosala bato mabe.