Nazalaka na posa ya kokanisa makambo oyo, ndenge mpe nasopaka molimo na ngai : Tango nazalaki kotambola kati na ebele ya bato, nazalaki komema bango kino na Tempelo ya Nzambe, kati na koganga ya esengo mpe ya kozongisa matondi lokola makelele ya bato oyo bazali na feti.
Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ? Mpo na nini ozali komitungisa kati na ngai ? Tia elikya na yo kati na Nzambe, pamba te nakosanzola Ye lisusu, Mobikisi mpe Nzambe na ngai.
Alati bosembo lokola ebombelo ya tolo, mpe ekoti ya lobiko na moto na Ye ; alati kozongisa mabe na mabe lokola nzambala, mpe amizipi zuwa lokola kazaka.
Tika ete Ye moko Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe Nzambe, Tata na biso, oyo alingaki biso mpe apesaki biso, na ngolu na Ye, malendisi ya seko mpe elikya ya malamu,
Mpo na biso, elikya yango ezali lokola longo ya bomoi na biso ; epolaka te mpe esimba biso makasi, ekota kino koleka rido, kati penza na Esika-Oyo-Eleki-Bule
Yango wana, boselingwa mpo na kosalela Nzambe lokola basali oyo balati bilamba ya mosala mpo na kosala ; bomibatela malamu mpe botia elikya na bino mobimba kati na ngolu oyo bokozwa tango Yesu-Klisto akomonana.
Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.
Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.