Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Batesalonika 5:6 - Mokanda na Bomoi

6 Yango wana tolalaka pongi te lokola bato mosusu, kasi tosenzelaka mpe tomibatelaka malamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Batesalonika 5:6
40 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bogoyigoyi ememaka moto na pongi makasi, mpe moto ya goyigoyi akufaka nzala.


Bakengeli ya Isalaele bazali bakufi miso, bango nyonso bazangi mayele ; bango nyonso bazali lokola bambwa oyo egangaka te, bakokaka koganga te, mosala na bango kolala mpe kolota bandoto, balingi pongi makasi.


Mokumbi masuwa apusanaki pene ya Yona mpe alobaki na ye : — Ndenge nini okoki penza kolala pongi boye ? Telema mpe belela nzambe na yo, tango mosusu akoki koyokela biso mawa mpo ete tokufa te.


Wana bato nyonso balalaki pongi, monguna na ye ayaki, alonaki matiti mabe kati na elanga na ye ya ble mpe akendeki.


Yango wana, bosenzela ; pamba te boyebi te mokolo nini Nkolo na bino akoya.


Boye bosenzela, pamba te boyebi mokolo te, boyebi mpe ngonga te.


Lokola mobali ya libala azalaki kowumela mpo na kokoma, baseka nyonso wana bayokaki pongi mpe balalaki.


alobaki na bango : — Motema na Ngai etondi na mawa pene nakufa ; botikala awa mpe bosenzela elongo na Ngai.


Makambo oyo nalobi na bino, nazali koloba yango mpe na bato nyonso : Bosenzela.


Esengo na basali oyo nkolo, tango akoya, akokuta bazali kosenzela ! Nazali koloba na bino penza ya solo : nkolo mpe akolata elamba na ye ya mosala, akovandisa bango na mesa, mpe akoya kopesa bango bilei.


Kasi bososola malamu likambo oyo : soki nkolo ndako ayebaki ngonga oyo moyibi akoya, alingaki kopekisa ye kokota kati na ndako na ye.


Bosenzela malamu mpe bosambelaka tango nyonso, mpo ete bozwa makasi ya kokima makambo nyonso oyo ekoya mpe ya kotelema liboso ya Mwana na Moto.


Atunaki bango : — Mpo na nini bozali kolala ? Botelema mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama.


Yango wana, bosenzela ! Bokanisa malamu ete mibu misato mobimba, butu mpe moyi, natikaki te kokebisa moko na moko na bino, mpe tango mosusu elongo na mpinzoli.


Bozongela makanisi ya malamu na ndenge ekoki mpe botika kosala masumu, pamba te bato mosusu kati na bino bayebi Nzambe te ; nazali koloba yango mpo na koyokisa bino soni.


Bosenzelaka, botelemaka ngwi kati na kondima, boyikaka mpiko, bozalaka makasi.


Biso nyonso mpe, na kala, tozalaki elongo na bango, tozalaki kotambola kolanda baposa na biso ya nzoto, tozalaki kokokisa nyonso oyo nzoto mpe makanisi na biso ezalaki kotinda biso kosala. Lokola bato mosusu, kanda ya Nzambe esengelaki kokweyela biso mpo na mabe ya bomoto na biso.


pamba te nyonso oyo ebimi na pwasa ekomaka pole. Yango wana baloba : « Moto na pongi, lamuka, bima kati na bakufi, mpe Klisto akongengisa yo. »


Mpe bosambelaka tango nyonso na bokambami ya Molimo, na nzela ya lolenge nyonso ya mabondeli mpe ya bisengeli. Mpo na yango, bosenzelaka mpe bomikabaka mobimba mpo na kobondelaka mpo na basantu nyonso.


Tika ete boboto na bino eyebana na bato nyonso. Nkolo akomi pene.


Bozalaka na molende ya kosambela, bosenzelaka mpe bozongisaka matondi epai ya Nzambe.


Bandeko, toboyi bozanga boyebi na tina na bato oyo bakufa, mpo ete bozala na mawa te lokola bamosusu oyo bazangi elikya.


oyo akufelaki biso mpo ete, ezala soki tozali na bomoi to tokufi, tozala na bomoi elongo na Ye.


Kasi lokola tozali bato ya moyi, tika ete tosenzela malamu, tolata kondima mpe bolingo lokola ebombelo ya tolo, mpe tolata elikya ya lobiko lokola ekoti ya ebende.


kasi mwasi akobikisama na nzela ya kobota. Basi bakobikisama soki bakobi kati na kondima, kati na bolingo mpe kati na bosantu oyo ezangi lolendo.


Nalingi mpe ete basi balataka na ndenge oyo ebongi, oyo ekoki te kobetisa bato mabaku, mpe na ndenge ya lolendo te ; bakangisa suki te mpe balata te ezala biloko ya wolo, mayaka to bilamba ya talo makasi,


Ezali mpe ndenge moko mpo na badiakona ya basi. Basengeli kozala : basi oyo babongi na limemia, basi oyo batongaka bato te, basi oyo balekisaka ndelo te na bizaleli na bango mpe basi ya sembo na makambo nyonso.


Boye, mokambi ya Lingomba asengeli kozala : moto azanga pamela, mobali ya mwasi moko, moto oyo alekisaka ndelo te na ezaleli na ye, moto oyo ayebi komikanga, moto ya lokumu, moto oyo ayambaka malamu bapaya kati na ndako na ye, moto oyo azali na makoki ya koteya,


Kasi yo, zala na ekenge na makambo nyonso, yikela pasi mpiko, sala mosala ya mopanzi Sango Malamu, kokisa malamu lotomo na yo.


Elakisaka biso kotika mabe, kokabwana na baposa ya makambo ya mokili, kobika tango oyo na bwanya, na bosembo mpe na botosi kati na makambo ya Nzambe,


Lendisa mpe bilenge mibali ete bamibatelaka malamu.


Yango wana, boselingwa mpo na kosalela Nzambe lokola basali oyo balati bilamba ya mosala mpo na kosala ; bomibatela malamu mpe botia elikya na bino mobimba kati na ngolu oyo bokozwa tango Yesu-Klisto akomonana.


Suka ya makambo nyonso ekomi pene ; yango wana, botambola na bwanya mpe na mayele mpo ete bokoka kosambela.


Bolekisaka ndelo te na bizaleli na bino mpe botambolaka na ekenge, pamba te monguna na bino, Satana, atambolaka zingazinga na bino lokola nkosi oyo ezali konguluma mpe koluka moto ya kolia.


Tala, nazali koya lokola moyibi ! Esengo na moto oyo azali kosenzela mpe kobatela bilamba na ye, mpo ete atambola motakala te, mpe bolumbu na ye emonana te na miso ya bato nyonso.


Lamuka ! Lendisa bato oyo batikali mpe ba-oyo bakomi pene ya kokufa, pamba te namoni ete misala na yo ezali ya kokoka te liboso ya Nzambe na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ