Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Batesalonika 5:4 - Mokanda na Bomoi

4 Kasi bino bandeko, bozali kati na molili te mpo ete mokolo yango ekanga bino na mbalakata lokola moyibi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Batesalonika 5:4
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mopanga oyo bozali kobanga ekokweyela bino kuna, na Ejipito ; nzala oyo bozali kobanga ekolanda bino kuna, na Ejipito, mpe ezali kuna nde bokokufa.


Isalaele, osalaki masumu wuta na mokolo ya Gibea mpe obongwani te. Boni, bitumba ekomeli bato mabe ya Gibea te ?


Maloba mpe malako na Ngai, oyo napesaki na nzela ya basakoli, basali na Ngai, ekomelaki bakoko na bino te ? Solo, ekomelaki bango, babongolaki mitema mpe balobaki : ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga, asaleli biso kolanda banzela mpe misala na biso, asali ndenge kaka akanaki kosala. › »


Nazali koloba na bino penza ya solo : na mokolo ya kosambisama, etumbu ya bavandi ya engumba to ya mboka wana ekozala makasi koleka etumbu ya mokili ya Sodome mpe Gomore.


Bosala keba ete mitema na bino ekoma kilo te likolo ya lokoso ya kolia, likolo ya kolangwa masanga mpe likolo ya mitungisi ya bomoi, noki te mokolo yango ekokanga bino na mbalakata,


mpo ete ofungola bango miso, olongola bango na molili mpe omema bango na pole ; mpo ete olongola bango na se ya bokonzi ya Satana mpe omema bango epai ya Nzambe, na tina ete bazwa bolimbisi ya masumu mpe libula kati na bato oyo babulisama na nzela ya kondima kati na Ngai. »


Soki bongo te, mobukanisi makila akolanda ye na kanda, akokanga ye mpe akoboma ye soki engumba ya kokimela ezali mosika mingi. Nzokande asengelaki kokufa te, pamba te ayinaki te liboso moto oyo asilaki koboma.


Kasi soki botosi te Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli te mitindo mpe bikateli na Ye, oyo nazali kopesa bino lelo, tala bilakeli mabe oyo ekokomela bino mpe ekokanga bino :


Tala bilakeli mabe nyonso oyo ekokomela bino, ekolanda bino mpe ekozwa bino, ekokanga bino kino bokobebisama ; pamba te botosaki te Yawe, Nzambe na bino, mpe bobatelaki te mitindo mpe bikateli oyo apesaki bino.


Akangolaki biso na bokonzi ya molili mpe amemaki biso kati na bokonzi ya Mwana na Ye ya bolingo,


pamba te boyebi malamu ete mokolo ya Nkolo ekoya ndenge moyibi ayaka kati na butu.


Solo, mokolo ya Nkolo ekoya lokola moyibi. Na mokolo yango, na lokito monene, Likolo ekolimwa, biloko ekozika na moto mpe ekonyangwama, mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ekozwa etumbu ya kobebisama na moto.


Nzokande, nazali mpe kokomela bino mobeko ya sika, mpe sika na yango emonani kati na Yesu mpe kati na bino, pamba te molili ezali kolimwa mpe pole ya solo esili kobanda kongenga.


Tala, nazali koya lokola moyibi ! Esengo na moto oyo azali kosenzela mpe kobatela bilamba na ye, mpo ete atambola motakala te, mpe bolumbu na ye emonana te na miso ya bato nyonso.


Yango wana, kanisa malamu mateya oyo ozwaki mpe oyokaki ; tosa mpe bongola motema na yo. Kasi soki olamuki te, nakoya lokola moyibi, mpe okoyeba te ngonga oyo nakoya epai na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ