Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Batesalonika 5:22 - Mokanda na Bomoi

22 Boboyaka mabe ya lolenge nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Batesalonika 5:22
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okozala mosika ya makambo ya lokuta. Okoboma te ezala moto oyo ayebi likambo te to moto ya sembo ; pamba te nalongisaka te moto mabe.


Moto oyo atambolaka na bosembo mpe alobaka solo, moto oyo abwakaka litomba oyo ezwami na nzela ya moyibi, moto oyo asembolaka maboko na ye te mpo na kozwa kanyaka, moto oyo akangaka matoyi na ye mpo na koboya koyoka masolo ya koboma bato, mpe oyo akangaka miso na ye mpo na koboya komona mabe.


Bozongisaka mabe na mabe te. Bolukaka kosala makambo ya malamu na miso ya bato nyonso.


Yango wana, soki mpo na bilei na ngai, ndeko na ngai azali kokweya na masumu, nakotikala kolia lisusu misuni te mpo ete nazala libaku te, oyo ekokweyisa ye na masumu.


Tobetisaka moto moko te mabaku, mpo ete mabe elobama te na tina na lotomo na biso.


Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino.


mpo ete, mokolo na mokolo, Bapagano bamemia bino, mpe mpo ete bobika te bomoi na bino na sima ya mokongo ya moto.


kasi bomekaka nyonso na mozindo mpe bosimba oyo ezali malamu.


Tika ete Ye moko Nzambe ya kimia abulisa bino na mobimba na bino ! Tika ete mobimba na bino, molimo, elimo mpe nzoto ebatelama malamu na lolenge ete ezanga pamela na mokolo oyo Yesu-Klisto, Nkolo na biso, akoya.


mpo na bato mosusu, bobikisa bango na kobimisa bango na moto ; mpe mpo na bato mosusu lisusu, boyokela bango mpe mawa oyo esangana na bobangi, na koyina ezala ata bilamba na bango, oyo baposa na bango ya nzoto ekomisa mbindo.


Boye Rite alalaki na makolo na ye mpe alamukaki na tongo-tongo, wana molili ezalaki nanu kopekisa bato komonana malamu ; pamba te Boazi alobaki : « Moto moko te ayeba ete mwasi moko ayaki na etando oyo. »


Tango akokende kolala, okotala malamu esika nini akozala. Sima, okopusana, okolongola elamba oyo ezipi makolo na ye mpe okomilalisa wana, na makolo na ye. Ye moko akoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ