Tango kaka nalekaki bango, mbala moko, namonaki mobali oyo motema na ngai elingaka. Nakangaki ye mpe natikaki ye lisusu te kokende. Namemaki ye kino na ndako ya mama na ngai, na shambre ya mwasi oyo abotaki ngai.
Bowumela kati na Ngai, mpe Ngai nakowumela kati na bino. Ndenge etape ekoki kobota bambuma te na ndenge na yango moko, soki ekangani te na nzete na yango ya vino, ndenge wana mpe bino, bokoki kobota bambuma te soki bokangani na Ngai te.
Nzokande, Bayuda ya Bere bazalaki bato ya boboto koleka bato ya Tesalonika, pamba te bayambaki Liloba na motema mobimba mpe, mokolo na mokolo, bazalaki koyekola na mozindo Makomi mpo na kotala soki makambo oyo Polo azali koteya bango ezali ya solo.
Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.
Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.
Nani kati na bato ayebi makanisi ya moto, soki kaka molimo oyo ezali kati na moto yango te ? Ndenge moko mpe moko te ayebi makanisi ya Nzambe, longola kaka Molimo na Ye.
Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino.
Bamosusu kati na bango bakotaka na bandako ya bato mpe bakosaka basi ya pete oyo batonda na masumu mpe bamitikaka na lolenge nyonso ya baposa ya nzoto,
Balingami na ngai, bondimaka te bato nyonso oyo babetaka tolo mpo na koloba ete batondisami na Molimo ya Nzambe ; kasi bomeka bango mpo na koyeba soki bazali penza ya Nzambe, pamba te basakoli ebele ya lokuta basili kopanzana na mokili.