Yango wana, Yawe alobaki : « Pema na Ngai ekowumela libela te kati na moto, pamba te abengami na kokufa ; mibu ya bomoi na ye ekozala kaka nkama moko na tuku mibale. »
Ozalaki na motema monene liboso na bango wuta mibu ebele mpe, na nzela ya Molimo na Yo, okebisaki bango na nzela ya basakoli na Yo. Kasi bayokaki kaka te. Boye okabaki bango na maboko ya bikolo ya bapaya.
Mayi minene ekoki koboma moto ya bolingo te ; ezala mayi ya bibale, ekoki komela yango te. Soki moto apesi biloko na ye nyonso ya ndako mpo na kosomba bolingo, solo penza bakotiola ye.
Nzokande, wana batombokelaki Ye mpe bayokisaki Molimo Mosantu na Ye mawa, abalukelaki bango mpe akomaki monguna na bango ; mpe Ye moko akomaki kobundisa bango.
Samuele asalaki makambo oyo Yawe alobaki. Tango akomaki na Beteleemi, bampaka ya engumba balengaki tango bakutanaki na ye. Batunaki ye : — Boni, koya na yo ezali ya kimia ?