Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko !
Mungwa ezali malamu. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bokokoka lisusu kozongisa elengi na yango ? Yango wana, bozala na mungwa kati na bino, mpe bozala na kimia bino na bino.
Bandeko na ngai, nasukisi mokanda na ngai na maloba oyo : Bosepelaka ! Bolukaka kokoma bato ya kokoka, bolendisanaka bino na bino, bozalaka na likanisi moko, bobikaka bomoi na bino na kimia. Bongo Nzambe ya bolingo mpe ya kimia akozala na bino elongo.
Atako bongo, botiolaki ngai te mpe boboyaki ngai te mpo na bokono na ngai ; nzokande, boyambaki ngai lokola Anjelu na Nzambe, lokola Yesu-Klisto Ye moko.
Tika ete kimia ya Klisto ekonzaka kati na mitema na bino, pamba te bozali biteni ya nzoto moko mpe Nzambe abenga bino mpo ete bozala na kimia yango ; mpe bozongisaka matondi.