Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye ; kasi ayaki nde kosala mpo na bato, mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.
Nani akokatela bango etumbu ? Moko te ! Yesu-Klisto akufaki ; kutu, asekwaki, azali na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, mpe azali kobondela mpo na biso.
Akufaki mpo na bato nyonso mpo ete ba-oyo bazali na bomoi bazala lisusu na bomoi te mpo na bango moko, kasi mpo na Ye oyo akufaki mpe asekwaki mpo na bango.
Kolanda liloba na Nkolo, tala makambo oyo tozali koyebisa bino : biso ba-oyo tokotikala na bomoi kino na tango oyo Nkolo akoya, tokokende te liboso ya bato oyo bakufa ;
Sima na yango, biso bato oyo tokozala na bomoi na tango yango tokomemama elongo na bango kati na mapata mpo na kokutana na Nkolo, na likolo ; mpe na bongo, tokozala elongo na Nkolo libela na libela.
amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.
Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.
Pamba te Ye moko Klisto oyo atikalaki kosala ata mabe moko te amonaki pasi, mbala moko mpo na libela, mpo na masumu ya bato mabe ; akufaki mpo na bato mabe, mpo na komema bino epai ya Nzambe. Babomaki Ye kati na nzoto, kasi Molimo azongisaki Ye na bomoi.