Lokola Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, bayekoli bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye, na esika oyo bazalaki bango moko kaka : — Yebisa biso : makambo wana ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa koya na Yo mpe suka ya mokili ?
Balingami na ngai, nazalaki na posa makasi ya kokomela bino na tina na lobiko oyo tozali na yango na lisanga. Nazwaki mokumba ya kokomela bino mpo na kolendisa bino ete bobunda mpo na kondima oyo Nzambe apesaki, mbala moko mpo na libela, epai ya basantu.