Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Batesalonika 4:4 - Mokanda na Bomoi

4 moko na moko kati na bino asengeli koyeba kobatela nzoto na ye kati na bosantu mpe lokumu,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Batesalonika 4:4
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Nkolo alobaki na Ananiasi : — Kende, pamba te nasila kopona moto wana lokola esalelo na Ngai mpo na kosakola Kombo na Ngai epai ya bikolo ya bapaya, epai ya bakonzi na bango mpe epai ya bana ya Isalaele.


Yango wana, Nzambe akabaki bango kati na baposa mabe ya mitema na bango mpe na misala ya bosoto, mpo ete basambwisa banzoto na bango moko, na nzela ya moko to ya mosusu.


Bandeko, mpo na mawa oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokabaka banzoto na bino epai ya Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe esepelisaka Nzambe. Ekozala mpo na bino losambo ya solo kolanda ndenge esengeli.


Nazali koloba awa lokola moto mpo na bolembu na bino ya bomoto. Ndenge na kala, bokabaki biteni ya banzoto na bino na bowumbu ya misala ya mbindo mpe ya mabe mpo na kosala mabe, ndenge wana mpe bokaba yango sik’oyo na bowumbu ya bosembo mpo na kotambola na bomoi ya bosantu.


Boyebi te ete banzoto na bino ezali biteni ya nzoto ya Klisto ? Boni, nakoki kozwa biteni ya nzoto ya Klisto mpo na kokomisa yango biteni ya nzoto ya mwasi ya ndumba ? Ata moke te !


Kasi mpo na kokima pite, tika ete mobali nyonso azala na mwasi na ye, mpe mwasi nyonso azala na mobali na ye.


Kasi soki bakoki te komikanga, tika ete babala ; pamba te eleki malamu kobala, na esika ya kozika na posa ya nzoto.


Kasi tomemaka bomengo yango kati na bambeki ya mabele mpo ete nguya monene ya Nzambe emonana, kasi nguya na biso bato te.


Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino.


Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo.


Bino mpe mibali, bovandaka na bwanya elongo na basi na bino, boyebaka ete bazali bato na bolembu. Bopesaka bango lokumu, pamba te bango mpe basengeli kozwa elongo na bino bomoi kowuta na Nzambe, na ngolu na Ye, mpo ete eloko moko te ekanga losambo na bino.


Kasi Nganga-Nzambe azongiselaki Davidi : — Na loboko na ngai, nazali na mapa te oyo toliaka mikolo nyonso, kasi ezali kaka na mapa oyo ebulisama. Bato na yo bakoki kolia yango soki kaka basangisaki banzoto te na basi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ