Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Batesalonika 4:3 - Mokanda na Bomoi

3 Nzambe alingi ete bozalaka bule tango nyonso : bokimaka pite ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Batesalonika 4:3
47 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lakisa ngai kosala mokano na Yo, pamba te ozali Nzambe na ngai. Tika ete Molimo malamu na Yo atambolisa ngai na mabele oyo ezanga mabaku !


Bongo nalobaki : « Ngai oyo, nayei epai na Yo kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku.


Soki mobali asangisi nzoto na mwasi, bango mibale basengeli kosukola nzoto na mayi mpe bakozala mbindo kino na pokwa.


Pamba te moto nyonso oyo asalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.


Pamba te, na motema nde ewutaka makanisi mabe, koboma, ekobo, kindumba, moyibi, litatoli ya lokuta mpe mafinga.


Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki mwasi yango akweyaki na ekobo, afungoleli ye nzela ya kosala kindumba ; mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongola na libala asali mpe ekobo.


Bato nyonso oyo balobaka na Ngai : ‹ Nkolo ! Nkolo ! › bakokota te na Bokonzi ya Likolo, kaka bato oyo basalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.


Moto nyonso oyo asalaka mokano ya Nzambe, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.


Yesu alobaki na bango : — Bilei na Ngai ezali : kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai.


Moto nyonso oyo azwi mokano ya kosala makambo oyo Nzambe alingaka, akososola soki mateya na Ngai ewuti na Nzambe to nazali koloba na ndenge na Ngai moko.


Na esika ya kotungisa bango, tosengeli kaka kokomela bango ete balia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, basala kindumba te, balia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bamela makila te.


Bolia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, bomela makila te, bolia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bosala kindumba te. Ekozala malamu soki bokimi makambo yango. Botikala malamu !


Sik’oyo, nazali kokaba bino na maboko ya Nzambe mpe na Liloba na Ye ya ngolu. Nzambe azali na makoki ya kolendisa bino mpe ya kopesa bino libula kati na bato nyonso oyo babulisama.


mpo ete ofungola bango miso, olongola bango na molili mpe omema bango na pole ; mpo ete olongola bango na se ya bokonzi ya Satana mpe omema bango epai ya Nzambe, na tina ete bazwa bolimbisi ya masumu mpe libula kati na bato oyo babulisama na nzela ya kondima kati na Ngai. »


Batondaki na lolenge nyonso ya misala ya sembo te, ya makambo mabe, ya lokoso, ya mabe, ya zuwa, ya misala ya koboma bato, ya koswana, ya kokosela baninga makambo mpe ya koyina bato ; bakomaki bato na songisongi,


Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.


Kasi awa bolongwe sik’oyo na se ya bowumbu ya lisumu mpe bokomi na se ya bowumbu ya Nzambe, litomba oyo bozwi ezali bomoi ya bosantu, mpe suka na yango ezali bomoi ya seko.


Ezali mpo na Nzambe nde bozali kati na Yesu-Klisto oyo akomaki, mpo na biso, bwanya kowuta na Nzambe, bosembo, libulisi mpe kokangolama,


Kasi mpo na kokima pite, tika ete mobali nyonso azala na mwasi na ye, mpe mwasi nyonso azala na mobali na ye.


Solo, nazali kobanga lisusu ete, tango nakoya lisusu epai na bino, Nzambe ayokisa ngai soni liboso na bino, mpe ete nalela mpo na bato ebele oyo basalaki masumu liboso kasi babongwani te na misala na bango ya mbindo, na kindumba mpe na ekobo oyo basalaka.


Tala misala ya bomoto : kindumba, misala ya bosoto, pite,


Yango wana, bozalaka bazoba te, kasi bososolaka oyo ebengami mokano ya Nkolo.


na miso na bango kaka te, lokola nde bozali koluka kosepelisa bato, kasi lokola bawumbu ya Klisto, oyo bazali kosala mokano ya Nzambe wuta na mitema na bango.


Yango wana, wuta mokolo oyo toyokaki sango na tina na bino, totikaka te kobondela mpo na bino mpe kosenga na Nzambe ete atondisa bino na boyebi ya mokano na Ye, na bwanya nyonso mpe na bososoli oyo Molimo apesaka,


Boye, boboma nyonso oyo, kati na bomoi na bino, ezali ya mokili : pite, bosoto, baposa ya mabe, bilulela mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali ndenge moko na kosambela bikeko.


Epafrasi, ye oyo azali mpe moko kati na bino mpe mowumbu ya Yesu-Klisto, atindeli bino mbote. Abundaka tango nyonso etumba mpo na bino kati na mabondeli, mpo ete botelema ngwi lokola bato oyo bakembi kati na kondima mpe baselingwa mpo na kokokisa mokano nyonso ya Nzambe.


Pamba te boyebi mitindo oyo topesaki bino na Kombo ya Nkolo Yesu.


moko na moko kati na bino asengeli koyeba kobatela nzoto na ye kati na bosantu mpe lokumu,


bozongisaka matondi kati na makambo nyonso, pamba te yango nde mokano ya Nzambe mpo na bino kati na Yesu-Klisto.


Tika ete Ye moko Nzambe ya kimia abulisa bino na mobimba na bino ! Tika ete mobimba na bino, molimo, elimo mpe nzoto ebatelama malamu na lolenge ete ezanga pamela na mokolo oyo Yesu-Klisto, Nkolo na biso, akoya.


Kasi biso bandeko balingami ya Nkolo, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino oyo Nkolo alingaka, pamba te Nzambe asila kopona bino wuta na ebandeli mpo ete bozwa lobiko, na nzela ya libulisi ya Molimo mpe ya kondima kati na solo.


amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.


Na bongo, boyika mpiko mpo ete, sima na bino kokokisa mokano ya Nzambe, bozwa biloko oyo alakaki.


Bosenzelaka ete moto moko te atambola na bomoi ya pite to atiola Nzambe lokola Ezawu oyo atekaki bokulutu na ye likolo ya biloko ya kolia.


apesa bino makoki ya kosalaka bolamu ya lolenge nyonso mpo na kokokisa mokano na Ye, mpe asala kati na biso makambo nyonso oyo esepelisaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto ! Tika ete nkembo ezonga epai na Ye, mpo na libela na libela ! Amen !


Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo.


Kolanda mabongisi na Ye, Nzambe Tata apona bino wuta kala, abulisa bino na nzela ya Molimo na Ye mpo ete botosa Yesu-Klisto mpe bokoma peto na nzela ya makila na Ye, oyo asopaki. Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino na bofuluki !


mpo ete botambola te kolanda baposa mabe ya nzoto, kasi kolanda mokano ya Nzambe, na mikolo oyo botikali na yango ya kobika awa na mokili.


Mokili mpe baposa na yango ezali koleka, kasi moto oyo asalaka mokano ya Nzambe awumelaka tango nyonso.


Kasi bato oyo batepaka-tepaka na kondima na bango, bato oyo bazangi kondima, bato oyo basalaka makambo ya soni, babomi, bandumba, bato ya maji, basambeli bikeko, mpe bato nyonso ya lokuta, bakobwakama kati na liziba ya moto mpe ya sofolo : yango nde kufa ya mibale. »


Kasi bambwa, bato ya maji, bandumba, babomi, basambeli bikeko mpe bato nyonso oyo balingaka mpe basalelaka lokuta, bakozala na libanda ya engumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ