18 Yango wana, bolendisanaka na maloba oyo.
Jeremi alobaki na Seraya : « Tango okokoma kati na Babiloni, sala ete otanga makambo oyo nyonso na mongongo makasi.
Tango makambo wana ekobanda kosalema, botelema, botombola mito mpe boyika mpiko, pamba te lisiko na bino ekomi pene.
Sima na yango, biso bato oyo tokozala na bomoi na tango yango tokomemama elongo na bango kati na mapata mpo na kokutana na Nkolo, na likolo ; mpe na bongo, tokozala elongo na Nkolo libela na libela.
Mpe mpo na oyo etali tango to mokolo, bandeko, tomoni ete ezali na tina te ya kokomela bino,
Yango wana, bolendisanaka mpe bosunganaka bino na bino, ndenge mpe kaka bozali kosala yango.
Bandeko, tozali kolendisa bino : bopesaka bagoyigoyi mpe bato ya mobulu makebisi, bolendisaka ba-oyo basili kobungisa mpiko na bango, bosungaka ba-oyo bazangi makasi, boyikanaka mpiko.
Yango wana, bolendisa maboko na bino, oyo ebandi kolemba mpe bokembisa mabolongo na bino, oyo ekomi kolenga.