Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Batesalonika 4:10 - Mokanda na Bomoi

10 Ezali mpe bolingo yango nde bosengeli kotalisa epai ya bandeko nyonso kati na Masedwane mobimba. Mpe bandeko, tozali kosenga na bino ete bokoba kosalaka bongo koleka,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Batesalonika 4:10
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te Mangomba ya Masedwane mpe ya Akayi ezwaki mokano ya kosangisa biloko mpo na kosunga babola oyo bazali kati na basantu ya Yelusalemi.


Yango wana, wuta tango nayokaki sango ya kondima na bino kati na Nkolo Yesu mpe bolingo na bino mpo na basantu nyonso,


Mpe nasengaka kati na mabondeli na ngai ete bolingo na bino ekoba kokola tango nyonso kati na boyebi ya solo mpe na bososoli ya kokoka,


pamba te toyokaki sango ya kondima na bino kati na Yesu-Klisto, mpe sango ya bolingo na bino mpo na basantu nyonso.


Mpo na yango, bokomi mpe ndakisa mpo na bandimi nyonso ya Masedwane mpe ya Akayi.


Tika ete Nkolo abakisa mpe afulukisa bolingo kati na bino mpo ete bolinganaka, bamoko na bamosusu, mpe mpo ete bolingaka bato nyonso, ndenge kaka biso mpe tolingaka bino.


Bandeko, mpo na oyo etali makambo mosusu, tolakisaki bino ndenge nini bosengeli kotambola mpo na kosepelisa Nzambe, mpe yango nde bozali kosala. Kasi sik’oyo, tozali kosenga na bino mpe kotinda bino na makasi, kati na Nkolo Yesu, ete bokoba kosalaka bongo koleka.


Bandeko, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino. Solo, ezali malamu mpo na biso kosalaka bongo, pamba te kondima na bino ezali se kokola mpe bolingo oyo moko na moko kati na bino azali na yango mpo na moninga na ye ezali mpe kokola.


Tondimisami kati na Nkolo ete bozali kosala mpe bokokoba kosala makambo nyonso oyo tozali kotinda bino.


kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela ! Amen !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ