Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Batesalonika 3:5 - Mokanda na Bomoi

5 Mpo na yango, lokola nakokaki lisusu kokanga motema te, natindaki Timote mpo na koluka koyeba soki bozali kaka kokoba kati na kondima. Nazalaki kobanga ete Satana ameka bino mpe ete mosala na biso ekende pamba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Batesalonika 3:5
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi ngai, nalobaki : « Nabimisaki motoki na ngai se pamba, nasilisaki makasi na ngai na pamba mpe nazwaki litomba moko te. Nzokande, lifuti na ngai ezali na maboko ya Yawe, mpe litomba na ngai ezali epai ya Nzambe na ngai. »


Sima na yango, mokonzi azongaki na ndako na ye ; mpe, butu mobimba, aliaki te, avandaki elongo na bamakangu te mpe atikalaki kozwa pongi te.


Momeki ayaki epai na Ye mpe alobaki na Ye : — Soki ya solo ozali penza Mwana na Nzambe, loba na mabanga oyo ete ebongwana mapa.


Sima na mwa mikolo, Polo alobaki na Barnabasi : — Tozonga na bingumba nyonso epai wapi toteyaki Liloba na Nkolo, mpo ete totala bandeko mpo na koyeba soki bazali ndenge nini.


Bopimelanaka nzoto te, longola kaka soki, na boyokani mpe mpo na mwa tango moke, bolingi tango mosusu komipesa na losambo. Kasi sima na tango yango, bozongela kosangisa nzoto mpo ete Satana akozwa nzela te ya komeka bino likolo ya bozangi makoki ya komikanga.


mpo ete Satana akonza biso te, pamba te toyebi malamu makanisi na ye.


Lokola tozali basali elongo na Nzambe, tozali kolendisa bino ete bozwa ngolu ya Nzambe na pamba te ;


Nakendeki kuna mpo na kotosa emoniseli oyo nazwaki. Natalisaki na bakambi Sango Malamu oyo nateyaka kati na Bapagano, na esika oyo tozalaki kaka biso moko mpo nalingaki ete mosala oyo nazalaki kosala mpe oyo nasilaki kosala ezwama na motuya.


Ah ! Nazali penza kobanga ete pasi oyo namiyokisaki mpo na bino ekende pamba.


Na bongo, tokozala lisusu bana mike te oyo bambonge ebwaki-bwaki lokola bwato, mpe oyo lolenge nyonso ya mateya, ya lokuta mpe ya mayele mabe ya bato epumbwisi na mopepe.


mpo bosimbi makasi Liloba ya bomoi. Boye, na mokolo ya Klisto, bokosala lokumu na ngai, pamba te nakimaki mbangu mpe nasalaki mosala na pamba te.


Kati na Nkolo Yesu, nazali na elikya ya kotindela bino Timote kala mingi te, mpo ete nalendisama na basango oyo akopesa ngai na tina na bino.


Bandeko, bino moko boyebi malamu ete koya na biso epai na bino ezalaki ya pamba te.


Kasi sik’oyo, Timote awuti epai na bino mpe asili kozonga epai na biso, amemeli biso sango ya kitoko na tina na kondima mpe bolingo na bino : ayebisi biso ete bozali tango nyonso na makanisi ya malamu mpo na biso mpe bozali na posa makasi ya komona biso, ndenge biso mpe tozali na posa makasi ya komona bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ