Kasi soki nalobi : « Nakotanga lisusu Kombo na Ye te, » Liloba na Ye kati na motema na ngai ekomaka lokola moto oyo ezali kopela kino na mikuwa na ngai ; nalongaka te kokanga yango, nakokaka te !
Yawe akokaki lisusu te kokanga motema liboso ya misala na bino ya mabe mpe ya nkele ; ezali mpo na yango nde mokili na bino ekomi elanga ya libebi, etando ebebisama, eloko ya lisuma mpe etikali lisusu na bato te, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.
Bato oyo bakendeki kotika Polo bamemaki ye kino na Ateni ; mpe na mitindo ya Polo, bazongaki na Bere koyebisa Silasi mpe Timote ete balanda ye noki na Ateni.
Bandeko, awa tokabwanaki na bino mpo na mwa tango moke, na nzoto kasi na makanisi te, tosalaki makasi mpo na komona bino, pamba te tozalaki na posa na bino makasi.