Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Batesalonika 2:3 - Mokanda na Bomoi

3 Pamba te, soki tosengaka na bato ete bandimela Nzambe, ezali te mpo ete tozali kati na libunga to totondi na makanisi ya mbindo to mpe tolukaka kokosa bato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Batesalonika 2:3
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moyize asilikaki makasi mpe alobaki na Yawe : — Kondima makabo na bango te. Nazwaki ata eloko moko te epai na bango, ezala ane ; mpe nasalaki ata moto moko te mabe kati na bango.


Sima na kotanga Mobeko mpe Basakoli, bakambi ya ndako ya mayangani batindelaki bango maloba : — Bandeko, soki bozali na maloba mpo na kolendisa bato, bokoki na bino koloba.


Boye, Jozefi, moto ya libota ya Levi, oyo abotama na esanga Shipre mpe bantoma bapesaki ye kombo mosusu, Barnabasi oyo elakisi « molendisi, »


Pamba te bato ya lolenge wana bazali bantoma ya lokuta, bazali bakosi oyo bazali komikomisa lokola bantoma ya Klisto.


Solo, biso tozali te lokola ebele ya bato oyo bakomisaka Liloba na Nzambe mombongo na bango mpo na kokoma na bomengo. Kati na Klisto, tosakolaka nde Liloba na bosolo nyonso lokola batindami ya Nzambe.


toboyaka nde makambo ya soni oyo esalemaka na nkuku, toboyaka kotambola na lokuta mpe kobebisa bosolo ya Liloba na Nzambe. Nzokande, wuta tokoma koteya bosolo na polele, topesaka na moto nyonso nzela ya kotala soki tozali kotambola malamu to te na miso ya Nzambe.


Toteyaka sango na biso moko te, toteyaka nde ete Yesu-Klisto azali Nkolo, mpe ete biso tozali bawumbu na bino mpo na Yesu.


kati na lokumu mpe soni, kosakolama lokola bato malamu mpe lokola bato mabe. Mpe lisusu, kati na koyebana lokola bato oyo balobaka lokuta, nzokande tolobaka solo ;


Bopesa biso esika kati na mitema na bino ! Tosalaki moto moko te mabe, tobebisaki moto moko te, tokosaki moto moko te mpo na kobotola ye biloko.


Boyebi mpe ete tosalaki, epai ya moko na moko kati na bino, ndenge penza tata asalaka mpo na bana na ye :


Nzambe abengaki biso te mpo ete tozala bato ya mbindo, kasi mpo ete tobika bomoi na biso na lolenge ya bule.


Yango wana Nzambe atindeli bango molimo ya libunga mpo ete bandima makambo ya lokuta,


Solo, tango toyebisaki bino makambo oyo etali koya ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, kati na nguya na yango nyonso, tolandaki te basambole oyo bato basalaka na mayele na bango, kasi na miso na biso moko, tomonaki Ye kati na kongenga nyonso ya nkembo na Ye.


Natelemi lelo liboso na bino. Bofunda ngai liboso ya Yawe mpe liboso ya mopakolami na Ye. Nazwaki ngombe ya nani ? Nazwaki ane ya nani ? Nanyokolaki nani, mpe namonisaki nani pasi ? Nazwaki kanyaka na maboko ya nani mpo na kokanga miso na ngai ? Soki nasalaki likambo moko kati na makambo oyo nyonso, nakozongisa yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ