Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Batesalonika 2:17 - Mokanda na Bomoi

17 Bandeko, awa tokabwanaki na bino mpo na mwa tango moke, na nzoto kasi na makanisi te, tosalaki makasi mpo na komona bino, pamba te tozalaki na posa na bino makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Batesalonika 2:17
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, lokola okeyi mpo ete ozalaki na posa ya ndako ya tata na yo, mpo na nini oyibi banzambe na ngai ?


Mpe Isalaele alobaki : — Ya solo, nandimi ete mwana na ngai Jozefi azali nanu na bomoi ; nakokende mpe nakomona ye liboso ete nakufa.


Isalaele alobaki na Jozefi : — Nazalaki na elikya te ete nakomona lisusu elongi na yo ; kasi sik’oyo Nzambe apesi ngai nzela ya komona kutu bana na yo.


Mokonzi Davidi atikaki kolanda Abisalomi, pamba te amibondisaki na tina na kufa ya Aminoni.


Kasi Elize alobaki na ye : — Boni, molimo na ngai ezalaki elongo na yo te tango moto wana akitaki na shar na ye mpo na kokutana na yo ? Ezali penza tango ya kozwa palata to ya kondima bilamba, bilanga ya nzete ya olive, ya vino, bameme, bangombe to basali ya mibali mpe basali ya basi ?


Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kati na esobe ya Yuda.


Soki ozali kokende na esambiselo elongo na moto oyo afundi yo, sala nyonso mpo ete oyokana na ye, wana bozali nanu na nzela. Soki te, akokumba yo epai ya mosambisi, mosambisi akokaba yo na maboko ya bakengeli, mpe bakengeli bakobwaka yo kati na boloko.


Alobaki na bango : — Nayokaki posa makasi ya kolia Pasika oyo elongo na bino liboso ete namona pasi,


Wana butu ekomaki, bandeko bakimisaki Polo mpe Silasi noki-noki na Bere. Tango bakomaki kuna, bakotaki na ndako ya mayangani ya Bayuda.


Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete nazalaki mbala mingi kosala mabongisi ya koya epai na bino, mpo na kobuka mbuma kati na bino, ndenge nazalaki kosala kati na Bapagano mosusu ; kasi kino sik’oyo, bipekiselo mingi ezali kokanga ngai nzela.


Kasi sik’oyo, nazali lisusu na esika te ya kosala mosala kati na etuka oyo ; bongo lokola wuta kala, nazalaka na posa makasi ya koya epai na bino,


Solo, mpo na ngai, atako nazali elongo na bino te na nzoto, kasi nazali elongo na bino na molimo. Mpe lokola moto oyo azali elongo na bino, na Kombo na Yesu, Nkolo na biso, nasili kokatela moto nyonso oyo azalaki kosala likambo yango etumbu.


Pamba te, atako na nzoto, nazali mosika na bino, kasi na molimo, nazali elongo na bino ; mpe nazali kosepela komona ete bozali kotambola na botosi mpe bozali kobatela kondima na bino kati na Klisto.


Kasi sik’oyo, Timote awuti epai na bino mpe asili kozonga epai na biso, amemeli biso sango ya kitoko na tina na kondima mpe bolingo na bino : ayebisi biso ete bozali tango nyonso na makanisi ya malamu mpo na biso mpe bozali na posa makasi ya komona biso, ndenge biso mpe tozali na posa makasi ya komona bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ