Bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango ; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te.
Asimbi kiyungulu na loboko na Ye, akopetola etando na Ye mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba kati na moto oyo ekufaka te, matiti oyo ekotikala. »
Kasi tango Bayuda bamonaki ebele ya bato, batondaki na zuwa ; bakomaki koloba mabe na tina na makambo oyo Polo azalaki koloba, mpe bakomaki kofinga ye.
Kasi Bayuda batiaki songisongi epai ya basi ya lokumu oyo bazalaki kogumbamela Nzambe, mpe epai ya bato minene ya engumba wana ; bapelisaki moto mpo ete Polo mpe Barnabasi banyokolama, mpe babenganaki bango wuta na mokili na bango.
Bongo, Bayuda oyo bawutaki na Antioshe mpe na Ikoniomi batiaki songisongi kati na bato mpo ete batombokela bango. Babambaki Polo mabanga, mpe babendaki ye kino na libanda ya engumba, pamba te bakanisaki ete akufi.
Kasi tango Bayuda ya Tesalonika bayokaki ete Polo azali koteya Liloba na Nzambe na Bere, mingi kati na bango bayaki mpe kuna mpo na kotia songisongi kati na bato mpo ete batomboka.
Kasi bato mosusu kati na bango bazalaki mitema mabanga ; baboyaki kondima mpe batiolaki nzela ya Nkolo na miso ya bato ebele. Bongo Polo akabwanaki na bango. Amemaki bayekoli mpe, mokolo na mokolo, azalaki koteya bango na eteyelo ya Tiranisi.
Nzokande, bayokaki sango ete oteyaka na Bayuda nyonso oyo bavandaka kati na bato ya bikolo ya bapaya ete batosa te Mobeko ya Moyize, mpe ete olobaka na bango ete bakata lisusu te ngenga ya bana na bango mpe batika kosalela bokoko ya Bayuda.
Tango kaka Polo akomaki wana, Bayuda oyo bawutaki na Yelusalemi bazingelaki ye mpe bakomaki kofunda ye na tina na makambo mingi ya mabe makasi, oyo bango moko bazangaki kutu makoki mpo na kotalisa bosolo na yango.