Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Batesalonika 2:15 - Mokanda na Bomoi

15 Ezali bango Bayuda nde babomaki Nkolo Yesu mpe basakoli ; ezali mpe kaka bango nde banyokolaki biso. Basepelisaka Nzambe te mpe bazali banguna ya bato nyonso ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Batesalonika 2:15
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Amani alobaki na mokonzi Kizerisesi : — Ezali na bato moko oyo bakeseni na bato mosusu, bapanzani kati na bato mpe kati na bituka nyonso ya mokili na yo ya bokonzi ; bizaleli na bango ekeseni na bizaleli ya bato mosusu, bongo batosaka mibeko ya mokonzi te ; ezali malamu te mpo na mokonzi kotika bango na kimia.


Tala ndenge Yawe akofuta banguna na ngai mpe bato oyo balobaka mabe na tina na ngai.


« Napesaki bato na yo etumbu ya pamba ; pamba te bazwaki na bango kaka mayele te. Mopanga na yo ebomi basakoli na yo ndenge nkosi ebomaka bato.


Amatsia alobaki na Amosi : — Yo, momoni makambo, bima na mokili na biso ! Zonga na mokili ya Yuda. Kuna, okosala mbongo na masakoli na yo.


Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu na yango, kasi boboyaki !


Bato nyonso bazongisaki : — Tika ete makila na ye etangama na mito na biso mpe ya bana na biso !


Bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo ; pamba te ezalaki mpe kaka ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.


Kasi bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi na biso bakabaki Ye mpo ete bakatela Ye etumbu ya kufa, mpe babakaki Ye na ekulusu.


Tango amonaki ete likambo yango ezalaki kosepelisa Bayuda, akangaki mpe Petelo na tango ya feti ya mapa ezanga levire.


akabamaki na maboko na bino kolanda mokano oyo Nzambe asila kozwa na mabongisi na Ye wuta kala. Bongo bino, na lisungi ya bato mabe, bobomaki Ye na kobaka Ye na ekulusu.


Bobomaki nde Mobandisi ya bomoi. Kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, bongo biso tozali penza batatoli ya likambo yango.


tika ete, bino nyonso mpe bato nyonso ya Isalaele, boyeba ete ezali na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti nde moto oyo atelemi liboso na bino na nzoto kolongono ; kaka Yesu oyo bino bobakaki na ekulusu, kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi.


Nzambe ya bakoko na biso asekwisaki Yesu kati na bakufi, Yesu oyo bino bobomaki mpe bobakaki na nzete.


Boni, ezalaki solo ata na mosakoli moko oyo bakoko na bino bazangaki konyokola ? Kutu, babomaki ezala basakoli oyo basakolaki koya ya Moyengebene, Ye oyo bosili sik’oyo koteka mpe koboma,


Nzokande, Nzambe asepelaki te na mingi kati na bango ; solo, babomaki bango kati na esobe.


Mbala na mbala, nazalaki kosala mibembo ; nakutanaki na makama ya bibale, makama liboso ya bato mabe, makama liboso ya bandeko na ngai ya ekolo moko, makama liboso ya Bapagano, makama kati na engumba, makama kati na esobe, makama kati na ebale monene, mpe makama liboso ya bandeko ya lokuta.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ