12 tozalaki koteya, kolendisa mpe kotindika bino na kotambola na lolenge oyo ebongi liboso ya Nzambe oyo azali kobenga bino ete bokota kati na Bokonzi mpe nkembo na Ye.
Pamba te Nzambe oyo alobaki : « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.
mpo ete bozala na bizaleli oyo ebongi liboso ya Nkolo, mpo ete bosepelisa Ye na nyonso, mpo ete bobota bambuma na nzela ya lolenge nyonso ya misala na bino ya malamu, mpo ete bokola kati na boyebi ya Nzambe,
Bandeko, mpo na oyo etali makambo mosusu, tolakisaki bino ndenge nini bosengeli kotambola mpo na kosepelisa Nzambe, mpe yango nde bozali kosala. Kasi sik’oyo, tozali kosenga na bino mpe kotinda bino na makasi, kati na Nkolo Yesu, ete bokoba kosalaka bongo koleka.
tango akoya na mokolo wana mpo na kopesamela nkembo kati na basantu na Ye, mpe lokumu kati na bandimi na Ye. Bino mpe bokozala elongo na bango, pamba te bondimaki mateya oyo toteyaki bino.
pamba te abikisaki biso mpe abengaki biso mpo ete totambola na bomoi ya bule. Mpe soki asalaki bongo, ezali te mpo na misala na biso, kasi ezali nde mpo na mabongisi mpe ngolu na Ye moko kaka, ngolu oyo apesaki biso kati na Yesu-Klisto liboso ya ebandeli ya tango.
Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.
Bozongisaka te mabe na mabe to mafinga na mafinga, kasi bozongisaka mabe na mapamboli ; pamba te Nzambe abengaki bino na kopambola mpo ete bino mpe boyamba mapamboli lokola libula na bino.
Kasi sima na bino komona pasi mpo na mwa tango moke, Nzambe ya ngolu nyonso, oyo abenga bino na nkembo na Ye ya seko kati na Yesu-Klisto, akokomisa bino bato ya kokoka, akolendisa bino, akopesa bino makasi mpe akotelemisa bino ngwi.
Nzambe apesaki biso, na nzela ya nguya na Ye ya bonzambe, nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kobika bomoi ya botosi kati na makambo ya Nzambe mpe mpo na kokangama na Ye ; asalaki yango na kopesa biso boyebi ya Ye oyo abenga biso mpo ete tosangana na nkembo mpe na bolamu na Ye.
Batatolaki na miso ya Lingomba na tina na bolingo na yo. Bongo, okosala lisusu malamu koleka soki osungi bango, na lolenge oyo ekosepelisa Nzambe, mpo ete bakoba mobembo na bango.