Kasi ngai, nalobaki : « Nabimisaki motoki na ngai se pamba, nasilisaki makasi na ngai na pamba mpe nazwaki litomba moko te. Nzokande, lifuti na ngai ezali na maboko ya Yawe, mpe litomba na ngai ezali epai ya Nzambe na ngai. »
Kasi na ngolu ya Nzambe, nazali oyo nazali lelo ; mpe ngolu na Ye epai na ngai ezali ya pamba te. Kutu, nasalaki mosala mingi koleka bango nyonso ; nzokande, ezali ngai te, kasi ezali nde ngolu ya Nzambe, oyo ezali elongo na ngai.
mpe oyo na nzela na yango bosili kobika, soki kaka bosimbi makasi Liloba oyo nateyaki bino ; pamba te soki ezali bongo te, wana bondimelaki na bino kaka pamba.
Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.
Mpe tala mpo na nini tozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe : tango boyambaki Liloba na Nzambe, oyo toteyaki bino, bondimaki yango te lokola liloba oyo ewuti epai ya bato, kasi lokola penza Liloba na Nzambe, oyo ezali kosala kati na bino oyo bozali na kondima.
tango akoya na mokolo wana mpo na kopesamela nkembo kati na basantu na Ye, mpe lokumu kati na bandimi na Ye. Bino mpe bokozala elongo na bango, pamba te bondimaki mateya oyo toteyaki bino.
Bandeko, bobondelaka mpo na biso na tina na makambo mosusu, mpo ete Liloba na Nkolo epanzana noki mpe epesamela lokumu ndenge ezalaki kozwa lokumu epai na bino.