Epai na bino nyonso oyo, kati na Rome, bozali balingami ya Nzambe mpe bobengama mpo na kozala basantu : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !
kolanda ndenge azali koloba kati na mokanda ya Oze : « Nakobenga bato oyo bazalaka ya Ngai te bato na Ngai, mpe nakobenga ye oyo azalaka molingami na Ngai te molingami na Ngai. »
Yango wana, lokola bozali baponami ya Nzambe, basantu mpe balingami na Ye, boyokelaka mingi bato mawa, bozalaka na bolingo, na boboto, na komikitisa mpe na motema molayi.
Tobosanaka te liboso ya Nzambe, Tata na biso, misala ya kondima na bino, misala ya bolingo na bino mpe molende na bino, oyo ewuti na elikya monene oyo bozali na yango kati na Nkolo na biso, Yesu-Klisto.
Kasi biso bandeko balingami ya Nkolo, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino oyo Nkolo alingaka, pamba te Nzambe asila kopona bino wuta na ebandeli mpo ete bozwa lobiko, na nzela ya libulisi ya Molimo mpe ya kondima kati na solo.
Kolanda mabongisi na Ye, Nzambe Tata apona bino wuta kala, abulisa bino na nzela ya Molimo na Ye mpo ete botosa Yesu-Klisto mpe bokoma peto na nzela ya makila na Ye, oyo asopaki. Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino na bofuluki !