5 nakolendisa mpo na libela kiti na yo ya bokonzi kati na Isalaele, ndenge nalobaki yango epai ya Davidi, tata na yo : ‹ Okotikalaka kozanga te moto oyo akokitana na kiti ya bokonzi ya Isalaele. ›
Tango mikolo ya bomoi na yo ekosila mpe okokende kokutana na batata na yo, nakotombola moko kati na bakitani na yo, oyo akobima penza na mokongo na yo, mpo ete akitana na yo ; mpe nakolendisa bokonzi na ye.
mpe mpo ete Yawe akokisa elaka oyo apesaki ngai na maloba oyo : « Soki bakitani na yo basali keba na etamboli na bango, soki batamboli liboso na ngai na bosembo, na mitema na bango mobimba, ekozala tango nyonso na moko kati na bakitani na yo, oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele.
— Na likambo oyo etali Tempelo oyo ozali kotonga, soki olandi bikateli na Ngai, soki okokisi malako na Ngai, soki otosi mpe olandi mibeko na Ngai nyonso, nakokokisa na nzela na yo elaka oyo napesaki na Davidi, tata na yo.
Alobaki : — Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, akumisama ; Ye oyo, na monoko na Ye moko, alobaki na Davidi, tata na ngai, mpe akokisi, na loboko na Ye moko, makambo oyo alakaki :
Yawe akokisi elaka na Ye. Nakitani na Davidi, tata na ngai, navandi na kiti ya bokonzi ya Isalaele, ndenge kaka Yawe alobaki, mpe natongi Tempelo mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.