26 Mokonzi Salomo asalisaki masuwa ebele na engumba Etsioni-Geberi oyo ezali pene ya Eyiloti, pembeni ya ebale monene ya Barozo, kati na mokili ya Edomi.
Na sima, totikaki bandeko na biso, bakitani ya Ezawu oyo bavandaka na Seiri. Tobalukaki wuta na nzela ya Araba oyo ewuta na Eyilati mpe na Etsioni-Geberi, mpe tokendeki na nzela ya esobe ya Moabi.