Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 9:25 - Mokanda na Bomoi

25 Mbala misato kati na mobu, Salomo azalaki kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani na likolo ya etumbelo oyo atongaki mpo na Yawe ; azalaki mpe kotumba malasi ya ansa na likolo ya etumbelo oyo ezalaki liboso ya Yawe. Ezalaki bongo nde misala ezalaki kokokisama kati na Tempelo ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 9:25
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Salomo atongaki Tempelo mpe asilisaki misala na yango ya kotonga.


Basilisaki kotonga Tempelo ya Yawe elongo na biteni na yango nyonso na sanza ya Buli oyo ezali sanza ya mwambe, na mobu ya zomi na moko. Salomo asalaki mibu sambo mpo na kotonga Tempelo ya Yawe.


Tango Salomo asilisaki misala ya kotonga Tempelo, azipaki yango na plafon oyo esimbamaki na mabaya minene ya banzete ya sedele.


Amirami azalaki na bana mibali mibale : Aron mpe Moyize. Aron aponamaki mpo na libela, elongo na bana na ye ya mibali, mpo na kobulisa Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpo na kotumba mbeka ya malasi liboso ya Yawe, mpo na kosalela Ye mpe kopambola bato mpo na libela na Kombo na Ye.


Sik’oyo, bana na ngai ya mibali, bobenda nzoto te, pamba te Yawe aponi bino mpo ete botelema liboso na Ye, bosala mosala na Ye, bosala losambo mpe botumbela Ye mbeka ya malasi mpo na lokumu na Ye.


Lokola basundolaki Ngai mpe batumbaki mbeka ya malasi mpo na banzambe mosusu kino kotumbola kanda na Ngai na nzela ya biloko oyo maboko na bango esilaki kosala, kanda na Ngai ekopela makasi na esika oyo, mpe ekokita te.


Ezali boye nde misala nyonso ya Salomo esalemaki, kobanda na mokolo oyo batongaki moboko ya Tempelo ya Yawe kino na mokolo oyo esilaki. Boye, Tempelo ya Yawe esilaki kotongama.


Tongo nyonso, Aron akotumba ansa na etumbelo yango tango akobongisa minda ; mpe pokwa nyonso, tango akopelisa yango.


Mbala misato na mobu, mibali nyonso basengeli koya liboso ya Nkolo Yawe, Nzambe ya Isalaele.


Mbala misato na mobu, mibali nyonso basengeli kokende liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo Ye akopona : na feti ya Mapa ezanga levire, na feti ya Baposo, mpe na feti ya Bandako ya kapo. Moko te akokende liboso ya Yawe, maboko pamba :


mibu nyonso, bilenge basi ya Isalaele babimaka mikolo minei, mpo na kosala feti na tina na mwana mwasi ya Jefite, moto ya Galadi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ