Davidi avandaki na ndako yango oyo batonga makasi mpe abengaki yango « Engumba ya Davidi. » Mpe Davidi atongaki zingazinga na yango, longwa na Milo kino na kati.
Salomo asalaki boyokani elongo na Faraon, mokonzi ya Ejipito ; abalaki mwana mwasi ya Faraon mpe amemaki ye na engumba ya Davidi, kino tango asilisaki kotonga ndako na ye ya bokonzi, Tempelo ya Yawe mpe bamir, zingazinga ya Yelusalemi.
Ndako na ye ya kovanda ezalaki kati na lopango mosusu, na sima ya ndako moke ya kokotela ; mpe batongaki yango ndenge moko kaka na ndako ya kiti ya bokonzi. Salomo abalaki mwana mwasi ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe atongiselaki ye ndako oyo ekokana na ndako ya kiti ya bokonzi.
Ezekiasi asalaki mosala makasi ya kobamba madusu ya mir mpe ya kobakisa bosanda ya bandako milayi ; atongaki mir mosusu na libanda, alendisaki mir ya engumba ya Davidi mpe asalaki lisusu makonga mpe banguba ebele.
Salomo alongolaki mwana mwasi ya Faraon kati na engumba ya Davidi mpe amemaki ye na ndako oyo atongelaki ye, pamba te alobaki : « Mwasi na ngai asengeli te kovanda kati na ndako ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, mpo ete bisika oyo Sanduku ya Yawe ekoti ezali bule. »