Tango Irami, mokonzi ya Tiri, ayokaki sango ete bapakolaki Salomo mafuta mpo ete akoma mokonzi mpo na kokitana na Davidi, tata na ye, atindaki bantoma epai ya Salomo, pamba te azalaki tango nyonso molingami ya Davidi.
bingumba nyonso epai wapi azalaki kobomba biloko na ye, bingumba epai wapi azalaki kobomba bashar mpe bampunda na ye. Salomo atongaki lisusu nyonso oyo azalaki na yango posa kati na Yelusalemi, kati na Libani mpe kati na mokili nyonso oyo azalaki kokamba.
ba-oyo bana na bango batikalaki kati na mokili oyo bana ya Isalaele babebisaki, Salomo azwaki bango mpo na misala makasi ya bawumbu, kino na mokolo ya lelo.
Boye, Davidi apesaki mitindo ya kosangisa bapaya oyo bazalaki kovanda na Isalaele. Mpe kati na bango, aponaki bato oyo bakataka mabanga mpo na kotonga Ndako ya Nzambe.
Anjelu na Ngai akotambola liboso na bino mpe akokotisa bino na mokili ya bato ya Amori, ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Kanana, ya bato ya Evi mpe ya bato ya Yebusi ; bongo Ngai nakosilisa bango.
epai ya bato ya Kanana oyo bazalaki na ngambo ya este mpe na ngambo ya weste ; epai ya bato ya Amori, ya Iti, ya Perizi mpe ya Yebusi, oyo bazalaki kovanda na mokili ya bangomba ; epai ya bato ya Evi, na se ya Erimoni, na mokili ya Mitsipa.
Yawe atikaki kati na mokili yango bakonzi mitano ya bato ya Filisitia, bato nyonso ya Kanana, bato nyonso ya Sidoni mpe bato nyonso ya Evi, oyo bazalaki kovanda na bangomba ya Libani, wuta na ngomba ya Bala-Erimoni kino na Lebo-Amati.