2 Yawe abimelaki Salomo na mbala ya mibale, ndenge kaka abimelaki ye na mbala ya liboso, na Gabaoni.
Yawe atombokelaki Salomo mpo ete motema na ye epengwaki mosika na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo amimonisaki epai na ye mbala mibale.
Na Gabaoni, Yawe amimonisaki epai ya Salomo kati na ndoto ya butu. Nzambe alobaki na ye : — Senga Ngai nyonso oyo olingi ete napesa yo.
Yawe abimelaki Salomo, na butu, mpe alobaki : — Nayoki losambo na yo mpe naponi esika oyo lokola Ndako ya bambeka mpo na Ngai.